Koma ✍🏽 maloba oyo pe loba yango mikolo nionso ....
Liloba na Nzambe ezali na bomoi kati na ngai. Ntango nazali koloba yango, nabimisaka nguya moko ya bomoi oyo ebongolaka ezalela na ngai.
Liloba efandi kati na ngai. Oyo nazali kosenga na boyokani na Liloba ya bomoi eyaka.
l nazali oyo Ye alobi l nazali. Nazali na bosikoli na ngai. Satana azali na bokonzi te likoló na bikelamu ya sika. Mpe nazali ekelamu ya sika.
Yesu apesaki ngai pouvoir ya procuration likolo ya kombo na Ye. Nasalelaka yango na mpiko mpe libɔlɔngɔ nyonso efukamaka na nkombo yango ntango nazali koloba yango. Nazali ekelamu ya sika. Nazali na bosikoli na ngai. Lisumu ezali na bokonzi likoló na ngai te. Maladi ezali na bokonzi te likoló na nzoto na ngai. Satana azali na bokonzi te likoló na ekelamu oyo ya sika. Nazali na pouvoir ya procuration likolo ya kombo oyo ezali likolo ya kombo nionso.
Nazali na bosikoli na ngai. MOLIMO oyo asekwisaki Yesu na bakufi azali na kati na ngai mpe azali kopesa bomoi na nzoto na ngai oyo ekufaka. Maladi ezali na bokonzi te likolo ya nzoto oyo mpe nasakoli bomoi ya Nzambe oyo ezali kosala kati na ngai.
Nazali na bosikoli na ngai. Nzambe apesaka mposa nyonso engebene na bomengo mpe nkembo na Ye. Satana azali na bokonzi te likolo ya bopesi na ngai mpe nasakoli ebele ya BOKONZI oyo ezali kosala na misolo na ngai.
Nazali na bosikoli na ngai. Lisumu ekoyangela ngai te. Mobange oyo azali soumis na likambo oyo akufi. Nazali ekelamu ya sika mpe nazali kobika uta na bomoto na ngai ya sika.
Anzelu na ngai aleki na makasi mpe ayokaka mongongo ya Liloba ya Nzambe na monoko na ngai. Na activer assistance ya lola na confession na ngai.
Uta mokolo ya yambo nalobi Liloba, lola eyanoli. Maloba na ngai e activaka assistance angelic mpe na maintenir confession na ngai tiii tango rupture ekoya.
Nafandaka na esika ya kobombana. Nzambe azali ekimelo na ngai. Mabe moko te ekoyela ngai mpe bolɔzi moko te ekopusana penepene na esika na ngai ya kofanda.
Nzambe apesaka mposa na ngai nyonso engebene na bomengo mpe nkembo na Ye na nzela ya Klisto Yesu. Lokola Bafilipi 4 molongo 19 esakoli, nalobi Liloba oyo likolo ya mosolo na ngai sikawa. Na activer assistance ya anzelu oyo epesameli na vie na ngai. Nasakoli ete disposition ezali kouta na ba direction nionso mpe nazali kozela ba portes efungwama oyo stratégie naturelle moko te ekokaki kofungwama.
Nasakoli Liloba ya Nzambe likolo ya bana na ngai kaka sikoyo. Ebundeli moko te oyo esalemi mpo na kobundisa bango ekozala malamu. Ba angelu bapesameli bango pe ba ange wana bamonaka toujours elongi ya Tata na ngai. Nalobaka bobateli, mayele, mpe kobenda ya Molimo Mosantu likolo ya bomoi ya mwana na ngai. Na kombo ya Yesu Klisto, na activer assistance ya lola likolo ya situation nionso bana na ngai bazali kokutana na yango oyo nakoki kozua te.
Elimo na ngai elala ata moke te. Molimo Mosantu asololaka na moto na ngai ya kati na butu mpe nazali koyekola kozwa oyo Ye atie.
Natie programme ya butu na ngai na Liloba. Molimo na ngai esalelaka mboto ya bomoi na nzela ya mpɔngi na ngai mpe nalamukaka komema oyo Nzambe atyaki.
Molimo Mosantu, nazali na mposa ya mayele na likambo oyo. Oyebi nsuka banda ebandeli. Oyebi dimension nionso ya situation oyo oyo nazo mona te depuis esika na telemi. Nazali kosenga bino boyebisa maye nasengeli koyeba na nzela ya molimo na ngai na butu mpe nazali komipesa mpo na kozwa yango na ntongo.
Yesu Klisto azali moke te. Ye azali Mozwi ya nguya na loboko ya mobali ya Tata. Mpe napusani penepene na Liloba na Ye na elikia mobimba oyo ebongi na yango.
Nayei na mpiko na kiti ya bokonzi ya ngolu. Yesu Klisto azali mobundi na ngai mpe etelemelo na ngai liboso ya TATA etongami na dossier na Ye, kasi ya ngai te.
Nazali mosangani ya bomoto ya bonzambe. Nazali na kati na ngai ezaleli ya kondima na Ye. Nazali na kati na ngai bomoto na Ye ya bolingo. Nzambe oyo azali kati na ngai azali monene koleka zabolo oyo azali na mokili. Nazali oyo Ye alobi l nazali. Nazali na oyo Ye alobi nazali na yango. Nakoki kosala oyo Ye alobi nakoki kosala.
English: Write ✍🏽 these words down and speak them daily ....
The Word of God is alive in me. When I speak it, I release a living force that transforms my circumstances.
The Word abides in me. What I demand in alignment with the living Word comes into being.
l am what He says l am. I have my redemption. Satan has no dominion over the new creation. And I am the new creation.
Jesus gave me power of attorney over His name. I use it boldly and every knee bows to that name when I speak it. I am a new creation. I have my redemption. Sin has no dominion over me. Disease has no authority over my body. Satan has no dominion over this new creation. I have the power of attorney over the name that is above every name.
I have my redemption. The SPIRIT who raised Jesus from the dead lives in me and gives life to my mortal body. Disease has no authority over this body and I declare the life of God operating in me.
I have my redemption. God supplies every need according to His riches and glory. Satan has no dominion over my provision and I declare the abundance of the KINGDOM operating in my finances.
I have my redemption. Sin shall not have dominion over me. The old man who is subject to this is dead. I am the new creation and I live from my new nature.
My angel excels in strength and hearkens to the voice of God's Word in my mouth. I activate heaven's assistance with my confession.
From the first day I speak the Word, heaven responds. My words activate angelic assistance and I maintain my confession until the breakthrough comes.
I dwell in the secret place. God is my refuge. No evil shall befall me and no plague shall come near my dwelling.
God supplies my every need according to His riches and glory through Christ Jesus. As Philippians 4 verse 19 declares, I speak this Word over my finances right now. I activate the angelic assistance assigned to my life. I declare that provision is coming from every direction and I expect doors to open that no natural strategy could have opened.
I declare the Word of God over my children right now. No weapon formed against them shall prosper. Angels are assigned to them and those angels always see the face of my Father. I speak protection, wisdom, and the drawing of the Holy Spirit over my child's life. In the name of Jesus Christ, I activate heaven's assistance over every situation my children is facing that I cannot reach.
My spirit never sleeps. The Holy Spirit communicates with my inner man through the night and I am learning to receive what He deposits.
I set the agenda for my night with the Word. My spirit processes living seed through my sleep and I wake up carrying what God deposited.
Holy Spirit, I need wisdom about this. You know the end from the beginning. You know every dimension of this situation that I cannot see from where I stand. I am asking you to communicate what I need to know through my spirit in the night and I am committing to receive it in the morning.
Jesus Christ is not small. He is the mighty One at the right hand of the Father. And I approach His Word with the full confidence it deserves.
I come boldly to the throne of grace. Jesus Christ is my advocate and my standing before the FATHER is based on His record, not mine.
I am a partaker of the divine nature. I have in me His faith nature. I have in me His love nature.
Greater is God that is in me than the devil that is in the world.
I am what God says l am.
I have what God says I have.
I can do what God says I can do.
No comments:
Post a Comment